héritier wata rb şarkı sözleri
Moyi elamuki esengo esili etondi motema mawa meke soni namonoko ekawuki appétit esili eh livre ya ba problèmes efungwami
Makanisi ekomi kotanga oyo eleka kala
Oyo eza lelo ebongo lobi ekoma nini eh
Elvis Elvad'or Herve pembe ekoma nini eh
Roger yoyoyo.
Nini nasali yo po oyina nga mabé boye Roger po ata ba foutis na boulangerie ezalaka importants na libumu ya moto ya nzala ah
Yanga motema e grever
Ata ba je t'aime ya pamba ekomi valeur esika amour e s'évader eh amour ekeyi oh
Natikali nanga gambala maman naleli eh natikali nanga gambala maman Roger Bandu eh
Photo nakangaki photographe abimiseli nga yango ti na pellicule. Na silisi na position kotala présence na nga ezo monana ve eh
Elamba ezalaka ya Nguanzhou Glody Pina bakosaka nga eh. Chayeur azalaka na posa ya mbongo suka didi nzimbu l'argent
Lelo ebimisi couleur ya moniato nazangi moyen kobuaka mayi libanda po na gangaki trop, trop parler peut tuer.
Natikali nanga gambala maman ah nalelie
Natikali nanga gambala maman ah
Jour yango na aéroport ya bolingo nazui vol ya motema Djo Boleme tokomi na pays destination Okitisi Kindudi ih Marusia mopaya nayebani nanga ata na esengo te. Ami de souffrance eh
Mongongo nanga ezangi matoyi ya koyoka ata naleli. Pasi nanga moko nga nako simbisa nani. Esika otika nga Roger mokili ekoma civilisé, moto te alinga kozanga yaye pembeni
Gedeon kutu asilisa Nenette mawa ah
Akawusa ye pinzoli ya miso naye eh
Abima médecin traitant ya ba blessures ba pasi ya motema naye eh
Salaire ya mushina chaque 18h na 21h30' engagé ya poste anganzami okoleka ndenge nini?
Soldat abeti sifflet na wenze moto te à bouger
Salut au drapeau x3
Natikali nanga gambala maman naleli eh
Natikali nanga gambala maman Merlin Zuma
Bandu raisonner eh nionso nasala po lelo oya kokoma traître na vie nanga Roger
Kanisa ah nionso nasala po lelo oya kokoma monguna ya vie nanga bébé eh eh eh
Angelu a annonçaki kobotama nanga sima kokola babaka nga. Et pourtant na ndimeli ye lokola vraiment interprète ya Nzambe.
Fatou Barry plat préféré ya vie na ngai
Nzoka azalaki naye musuni ya ngulu uh
Nga pe ko musulman moyen ve naliya
Pamba te na kobuka bikila ya Allah ah Patricia Balasi.
Na ekulusu Yezu alela souffrance ya mission oyo andimaka
Soki nga pe Yahwe alakisaki nga na mosika ah
Nalingaki koboya nanga koya na motema nayo Shakira Beton
Nalingaki koboya vraiment ya Paul Luemba, izi Mukasa
Bolingo vraiment église etondi ba ndimi ya lokuta
Arnaud Muanga bolingo etondi bandimi lokuta Djikain Mampuya
Pasteur oyo asalaka naye miracle te
Nzambe naye pe abikisaka te
Inutile nandima évangile naye eh
Po ata na mipasoli bilamba jamais nakozala sauvée Ingrid Monzia
Natikali nanga Chrétienne sans foi Iris Obama
Owangani nga eh owangani nga ah x2
Owangani nga Roger Bandu owangani nga ah
Owangani RB eh owangani nga ah
( Rolsy Roshmy ahahah Cynthia Dongo )
Yo bongoli nga na religion ya bolingo nayo
Babengaka Lidjaka mondimi ya papa Kethia
Ba sentiments nanga nanu ya bomuana
Roger Bandu osungi nga te nga nakoma lokola yo. RB openguisi motema nanga.
Tala ndenge okomisi nga mopagano ya bolingo nayo oh.
Nazalaki Joueur ya suka na beta penalty
Qualification ya équipe ezalaki na maboko nanga
Obimeli nga na pourtour ozo briller lokola feu d'artifice
Arbitre abeti sifflet
Nabeta penalty
Bébé na kati nzadi oh ballon e taper à côté
Babeleli nga na longwe
Publics ebeleli nga joueur ya yombo
Cheri oyo kindoki te - kindoki
Oyo kindoki te - kindoki ih
Ah mama eh eheheh
Ah mama eh eheheh